Maponomi 2023: sima Yako komisa mkombo   na CENI, Adolphe Mozito aza na bobangi yako likya pona motieyi libaya moko ya bayi opposition

Mokambi mbulamatari ya kala, Adolphe Mozito, akomisi kombo pona kowela kiti ya bokonzi na maponomi ya sanza ya zomi na mibale ya mobu koto ibale tuku ibale na isato na CENI mokolo moa mposo 30/09 na Kisasa. 

Sarah Meta Savu

3 Sanza ya zomi 2023 - 10:54
 0
Maponomi 2023: sima Yako komisa mkombo   na CENI, Adolphe Mozito aza na bobangi yako likya pona motieyi libaya moko ya bayi opposition

O'boso ya ba panzi sango Adolphe Mozito akanisi ete motieyi libaya moko pona bayi opposition ezali pasi kotalaka eleko. 

"Na kanisi ekoki kosalema nionso eza kolandisama na linaka lia moto na moto. Eko tambola nzela moko to te? Na kanisi eko zala pasi" elobi Muzito. 

Se o'libaku Adolphe Muzito azongeli likanisi lia ye yako tonga efelo pona ko kabola Congo demokratiki na bikolo ya pene lokola Rwanda pe Ouganda tina yako kembisa bokengi na biteni bina ya ekolo. 

Elongo na lingomba politiki naye pe ya lisanga lia bango " Mbonda" kuna na ndako ya mosala ya CENI Adolphe Mozito alaki ko bongisa libombo, bokengi PE social na ekolo. 

Adolphe Mozito aza moto ya motoba yako komisa kombo pona kiti ya bokonzi. 

Mokambi ya lingomba politiki "nouvel élan" pe lisanga Mbonda akomisi pona ye moko balobeli ya bayi mboka kama sambo oyo eti ye na moto ya masanga manso ya bayi opposition.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa