Maponomi : Rigobert Kiakesidi ya NAD alingi azala molobeli ya bayi mboka na eteni ya mont amba

Motieyi libaya na maponomi ya lisanga politiki NAD, Rigobert Kiakesidi azali na molende pona ko mema na ndako ya balobeli ba kokoso ya bayi mboka na eteni ya mont amba.

Sarah Meta Savu

24 Sanza Sambo 2023 - 11:50
 0
Maponomi : Rigobert Kiakesidi ya NAD alingi azala molobeli ya bayi mboka na eteni ya mont amba

Moko na kati ya lisanga ya Athanase Matenda, Rigobert Kiakesidi amipesi nzela na makambo ebele,soki azui ebonga na ndako ya balobeli lokola ko mema mobeko mokoki ko bongisa libiki lia bayi mboka na engumba kisasa pe ya batu na eteni na ye ya maponami.

Alibolaki liboso ya bayi mboka mosala ya molobeli, mosala pe bokeseni ya bokonzi misato na ekolo ebengami « État de droit » mosala ya mobele ezali Yako kela PE ko landela mobeko ekoki kobongisa libiki ya bayi mboka.

Mikoko mizali na ekolo congo kasi ezali ko salelama te Rigobert elongo na balaki ko pesa lisungi na oyo etali likambo liango po ebonga.

Rigobert alobi abosani te libiki lia bayi mboka na limete, ngaba, lemba PE kinseso,eteni na ye ya maponomi liboso ya Kokoso ya bokengi,bobola,ko zanga misala Rigobert alaki miboko pona kongisa yango.

Moko na kati ya union sacrée alaki na tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi ebonga ya bokonzi pona mibu mitano miszali koya na ekolo congo demokratiki.

Maponami na bipimelo binso ebongisami mua tuku mibale ya sanza zomi na mibale ya mobu tozali kolandisama na manaka ya CENI.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa