Maponomi pona ebonga ya bokonzi: ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle ba ndimi boponami ya Felix Antoine Tshisekedi

Ezali ya ko kamwa lisusu te , ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle andimi boponami ya Felix Antoine Tshisekedi pona mbala mibale ye alongi na 73,47%. 

Sarah Meta Savu

10 sanza ya yambo 2024 - 20:17
 0
Maponomi pona ebonga ya bokonzi: ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle ba ndimi boponami ya Felix Antoine Tshisekedi

Ezali mokambi ya ndako ena Dieudonné Kamuleta nde abimisi yango na mpuasa o'nzela ya etando ike ya rtnc mokolo moa mardi 09 janvier.

Sima ya mokano moa bayi CENI na oyo etali maponomi mango, sikawa ezali ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle nde basengelaki kotanga kolandisama na mibeko pona ko sukisa misala mia maponomi ma décembre 2023. 

Ndako ya bosambisi ako kata pe likambo lilobami na bayi opposition pona etali misala ya mabe misalemaki o'maponomi mango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa