Maponomi 2023: likita linene lia bokeseni ya lisanga politiki nouvel élan na tina yako pono motieyi libaya ya lisanga lia bango

Likita linene lia bokeseni ya lisanga politiki nouvel élan ebandi mokolo moa lelo tuku mibale na muambe ya sanza libwa na ndako ya mosala ya lisanga lia bango na bibwa, komine ya n'sele na engumba mokonzi kisasa.

Sarah Meta Savu

28 Sanza ya libwa 2023 - 21:13
 0
Maponomi 2023: likita linene lia bokeseni ya lisanga politiki nouvel élan na tina yako pono motieyi libaya ya lisanga lia bango

Likita liye lizali pona ntina yako pono mokambi moa sika ya lisanga pe moko ya bango pona kotia libaya na moponomi ebongisami pona sanza ya zomi na mibale ya mobu koto ibale tuku ibale na isato, kolandisama maloba ya Blanchard Mongomba kalaka mokambi ya lisanga.

"Lobi mokolo ya suka bako tanga mikano mizuami pe na libaku toko talisa na na bato awa na ekolo pe mikili misusu mokambi ya sika ya lisanga politiki nouvel élan pe motieyi libaya" nde boye alobelaki ba panzi sango.

Mua bato batiami mopanzi na lisanga pona ko kamba likita liango.

Bakonzi ebele ya lisanga ya bipayi na bipayi o'ekolo Congo demokratiki bandimi na mbianga ya lisanga nouvel élan pona kobongisa libiki lia lisanga lia bango pe motieyi libaya na maponomi mazali koya.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa