Félix Tshisekedi : « AFC eza Joseph Kabila »
Mayi na munoko te tata mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi o'nzela ya radio top Congo alobi ete Joseph Kabila nde azali mokonzi ya lisanga ya batomboki AFC.
Pona ye mokambi ya lisanga politiki FCC aboyaki kotia kombo na maponomi maselemaki mua 20/12 pona koya kobundisa bokonzi na botomboki.
"Joseph Kabila ? AFC ezali ye. Aboyaki kotia kombo na maponomi nzambi azalaki kobongisa botomboki (...) AFC ezali elongo na Rwanda" elobaki tata mokonzi.
Félix Tshisekedi atangaki Joseph Kabila lokola moko ya batu bazali na sima ya bitumba na RDC abongoli maloba maye te.
" Koniokwama na opposition epesameli moto monso te, tango nalobaki ete ye nde azali na sima ya Nangaa ebele ba yimaki" nde abakisaki.
Joseph Kabila atangamaki na kozala moko ya bazali ko solola na Corneille Nangaa, kolandisama misala ya mapinga bolukiluki. Tata mokonzi ya kala na RDC lokola ebele ya baye batangami kozala na boyokani na Corneille Nangaa azali ko samba te na lisambisi oyo bazali ko funda Corneille Nangaa mokambi ya AFC pe baninga na ye.
