Jean Luc Mélenchon epayi Tshisekedi : « nazo zela etumbu ya France likolo ya Rwanda etalisa misala »

Tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi ayambamaki motelemeli bokonzi ya ekolo France, Jean Luc Mélenchon na ndako naye ya mosala mua jeudi 26/10/2023.  Basololaki mingi na oyo etali maponomi mazali kobongisama liboso ya bitumba Rwanda azali kolukela RDC.

Sarah Meta Savu

27 Sanza ya zomi 2023 - 12:32
 0
Jean Luc Mélenchon epayi Tshisekedi : « nazo zela etumbu ya France likolo ya Rwanda etalisa misala »
Jean Luc Mélenchon epayi Tshisekedi : « nazo zela etumbu ya France likolo ya Rwanda etalisa misala »

Liboso ya ba panzi sango moyi poliki ya France alobi boye « nazali kozela bitumba ya baninga na nga ya mosala bapesi na Rwanda, eko zongisa Rwanda sima. RDC elingi kimia pona bozali ya maponami lolenge esengeli. To lingi Rwanda etika ko bundisa RDC ».

Elongo na balobeli bayi mboka ya lisanga politiki na ye na ekolo France moyi politiki abakisi « balobeli bayi mboka bozali awa bâtie linzaka na mokanda mozali kotelemela mabe manso ekolo Rwanda ezali kosala na ekolo Congo demokratiki ».

Jean Luc Mélenchon, moyi politiki ya ekolo France azali na RDC uto mokolo moa mardi 23/10/2023. PE ye akozala na masolo na bana ba kelasi na eteyelo ya bakolo ya UNIKIN mikolo mikoya.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa