Maponomi ya tata mokonzi 2023: Moïse katumbi "alobeli mabe bilaka ya Tshisekedi na moanda "

Mua tuku mibale na motoba ya sanza libwa, mokambi lisanga politiki ensemble pour la république Moïse katumbi asalaki mobembo na etuka ya Kongo central.

Sarah Meta Savu

29 Sanza ya libwa 2023 - 09:34
 0
Maponomi ya tata mokonzi 2023: Moïse katumbi "alobeli mabe bilaka ya Tshisekedi na moanda "

Mobembo moa ye ebandaki na engumba ya moanda. Ayambamaki na bayi mboka ebele kuna na libanda Lia pepo ya moanda. Na maloba maye Moïse katumbi alakisi mosapi bilaka ya ya tata mokonzi Félix Tshisekedi na eteni ena ya ekolo. 

Moanda esengeli ko kokana na Monaco. Franc congolais eza komata pe ko kita kasi lifuti lizali ko landa yango te. Awa tosengelaki komona ba buatu pona ko loba mbisi. Petoloni ezali mais misolo ezali ko landa te. Kongo central ezali engumba ya lotiliki. Ezali pe na petoloni etuka ya boye ekoki kozala na bobola te" elobi Moïse katumbi. 

Moyangeli ya kala ya etuka ya katanga aralisi pe posa naye yako salisa mimekano ya masano ya mikili ya afrika ( CAN, CHAN) soki azui bokonzi. 

Kolongwa moanda Moïse katumbi akeyi na engumba ya Boma esika etuluku ya bato. 
Na Kongo central lokola na bisika misusu aleka, Moïse katumbi ateyi bolamusi ya misala o'kati ya lisanga politiki naye pe emoneli naye soki azui bokonzi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa