Kisasa : na bozangi boyokani na Ngobila,Gecoco Mulumba alendisami na UDPS

Moyangeli molandi ya engumba mokonzi kisasa Gecoco Mulumba, azui maboko simbisi ko wuta na lisanga politiki UDPS, nzoka nde aza na boyokani te elongo na moyangeli Gentiny Ngobila mokonzi na ye.

Sarah Meta Savu

1 Sanza ya muambe 2023 - 10:07
 0
Kisasa : na bozangi boyokani na Ngobila,Gecoco Mulumba alendisami na UDPS

Eza mokolo moa lundi tuku misato na moko sanza sambo nde kalaka mokambi ya lisanga UDPS Augustin Kabuya o'liboso ya baye ya lisanga lia bango nde alaki na Gecoco Mulumba ete lisanga mobimba lizali elongo na ye.

De "libaku abakisi " tozala na kimia, biso UDPS tozali ko luka likambo na moto te, kasi soki ba tumboli biso toko koma kino na suka.

Nzinga nzinga ya Ngobila ezo koma obe moke sima ye ko ndongwana na mokambi ya ndako ya balobeli ya Kisasa ye lisusu na molandi moa ye oyo ekomi pene ya Godé Mpoyi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa