RDC : PPC  Barbet PE SNEL batie mokoloto na mokanda ya boyokani pona bokeyi mosika ya lotiliki na kongo central

Na ndako ya misala ya SNEL na komini ya Gombe nde mokanda moango ya boyokani mozui mokoloto,mokolo moa mitano,tuku mibale na muambe, sanza ya sambo.

Sarah Meta Savu

29 Sanza Sambo 2023 - 13:30
 0
RDC : PPC  Barbet PE SNEL batie mokoloto na mokanda ya boyokani pona bokeyi mosika ya lotiliki na kongo central
RDC : PPC  Barbet PE SNEL batie mokoloto na mokanda ya boyokani pona bokeyi mosika ya lotiliki na kongo central

Boyokani na motuya ya ba millions moko na ndambo ya misolo mia amerika, na kati linaka ya panza lotiliki na zamba 1er pe malanga Kuna na eteni ya songololo na etuka ya Kongo central.

Pona mokambi ya kopani PPC Barbet, Iqbal Omar, misala miango mizali ya ba sanza tuku mibale Kino tuku mineyi pona pesa lotiliki na bayi mboka koto misato na kama mitano to pe mabota kama muambe.

Pona makambi ya SNEL linaka liye lizali ko pesa makoki ya ko panza lotiliki na bituka binso ya Congo demokratiki pe Kongo central bisika PPC Barbet ezali.

Linaka libongisi botongi ligne mibale ya 30 kV pona ba mboka ya kati,kasi pe kotiya masini mabale yako bongolo lotiliki ya 30/0.4 kV pe mosusu 5 MVA pona matisa lotiliki na 11 kino 30 kV, na lolenge ya SNEL asaleka mosala.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa