Christophe Lutundula:" mbulamatari ya Congo demokratiki azo zela pole ko wuta na bakonzi ya ekolo Soudan na liwa ya bayi mboka na mobembo kuna esika "

Bayi mboka ya Congo demokratiki zomi ba weyi mua lomingo na Khartoum, na ekolo Soudan. N'a liyebisi libimi mokolo moa liboso ya mposo tozali, mokambi mbulamatari molandi atali mambi ma boyakani na ba paya atangi ba nkombo ya baye bazui liwa.

Redaction

6 Sanza motoba 2023 - 19:56
 0
Christophe Lutundula:" mbulamatari ya Congo demokratiki azo zela pole ko wuta na bakonzi ya ekolo Soudan na liwa ya bayi mboka na mobembo kuna esika "

Eza nde Kula Massamba, Benjamin Mvangui Ibrahim, Kamango Joseph, Tabin Aboubacar,Bongalu Mumbanga, Ismaël Patience Jean, Bébé, Farouk Mme mpe Rosa Patience.

Na yango mbulamatari ya Congo demokratiki azali ko zala pole na ntina ya likambo liango ko wuta na bakambi mbulamatari ya Soudan, azali mpe ko bakambi mbulamatari kuna esika bayeba ko sala maye masengeli mpona kozongisa ba zonto ya ba weyi na ntina yako bongisela bango malita ya malamu.

Lisusu azali ko senga ete ba fongola nzela oyo eko sala ete bayi mboka ya Congo demokratiki na ba mpota bazonga na lombango.

Bitumba ya bango na bango kuna esika pona kotelemela bokonzi ezali na ebonga ebandi uto moa zomi na mitano ya sanza mineyi na bingumba Khartoum mpe Darfour.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.