RDC : Congo Airways ayambi pepo moko ya Boeing 737-800
Kopani ya pepo Congo Airways ayambi pona mbala liboso pepe ya Boeing 737-800, ezalaki mokolo ya Mardi 12/11 na ngonga o'libanda ya pepo ya n'djili na engumba kisasa.
Na bifandelo 174, 12 ya epimelo ya likolo pepo eye yako futela eko pesa kopani nzela yako bima na pongi pe ko zongela mosala sima ba sanza.
Pepo eye ewuti na engumba Rijeka na ekolo Croatie, pe ezali na nzela ya boyokani ya kopani Klasjet ya Lituanie elongo na Congo Airways. Ba kopani babale basalaki elongo mobu moleki.
Kolandisama ba nungunungu kopani ya ekolo Congo ekoki kozwa pepo mosusu mikolo mikoya, pene pene ya mua 18/11 ya mobu moye tozali.
Congo Airways ekoki ko zongela mosala mua 15/11, kolandisama liyebisi ndako ya mosala ya kilya.
