Bitumba o'moniele ya RDC : kolongobana na boyokani ya EAC Kenya ebongami pona ko bakisa mapinga na Nord Kivu

Makoki yako mona mikolo mikoya mapinga ya Kenya na moniele ya RDC kolandisama boyokani etali EAC nde boye elobami na likita elongo na etuluku ya mapinga masengeli koyingela mabele ya ekolo Congo demokratiki na se ya bokambemi ya commandant adjoint ya mapinga ya Kenya.

Sarah Meta Savu

18 Sanza ya zomi 2023 - 08:53
 0
Bitumba o'moniele ya RDC : kolongobana na boyokani ya EAC Kenya ebongami pona ko bakisa mapinga na Nord Kivu

General David Tarus alendisi etuluku yango kosala manso pona tina yako zongisa kimia na etuka Nord Kivu. 

" Tozo ndimela bino penza awa bozo kende bitumba bosala oyo esengeli pona ko zongisa kimia ya ba ndeko na biso ya basi pe mibali o'moniele ya RDC. 

Etuluku ya mapinga eye balandi mayekoli ya biteni ebele ndakisa kobatela bayi mboka,ko mema na bokoki mandoki, lolenge elobami na Kenya.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa