RDC : « misala ya kobongisa ba nkombo nde epusi ngonga pona lifuti lia basali ya mbulamatari », (IGF)

IGF pona maye matali koleka ya ngonga pona lifuti lia basali ya mbulamatari ya sanza sambo,alobi ete ezali pona misala ya koyesa sika lokasa la ba kombo.

Sarah Meta Savu

2 Sanza ya muambe 2023 - 13:46
 0
RDC : « misala ya kobongisa ba nkombo nde epusi ngonga pona lifuti lia basali ya mbulamatari », (IGF)

Elobami o'kati ya lioko liyebisi, oyo lokasa ekomeli ba panzi sango ya Une.cd mokolo moa misato, moa mibale,sanza muambe.

O'kati ya liyebisi liango IGF elaki lifuti kala mingi te pona basali ya mbulamatari.

« Lifuti lia basali ya mbulamatari ezui ngonga na ntina ya misala yako sukola pe ko luka ko bongisa, ko yesa sika lokasa la ba kombo », Boye to koki ko tanga na liyebisi liango na mokoloto ya moa tuku misato na moko ya sanza sambo.

Kasi, basali basengeli ko bomba misolo mia bango na franc congolais, nzambi ezali kozua motuya malembe malembe.

Na ngambo esusu IGF abakisi boye libenga lia misolo na ekolo Congo demokratiki azali boye:

1. Misolo mikoti na libenga na franc congolais: 12.691.647.583.909,70

2. Misolo ekeyi na misala to mikumba ya mbulamatari: na franc congolais 12.343.816.518.698,00


3. Oyo etikali : na franc congolais 378.288.835.307,27

« Misolo mikoti lolenge esengelaki pona mobu 2023. Kasi mitindo mipesami pona komatisa yango lisusu », Boye bosukisi liyebisi liango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa