Boyokani : Felix Tshisekedi na mobembo ya mosala na engumba Doha (Qatar) 

Tata mokonzi ya ekolo Congo demokratiki Félix Antoine Tshisekedi ezali na mobembo ya mosala na engumba Doha na ekolo Qatar uto mokolo moa lundi 04/03/2024. 

Sarah Meta Savu

5 Lisungi pona macini 2024 - 10:05
 0
Boyokani : Felix Tshisekedi na mobembo ya mosala na engumba Doha (Qatar) 

Na bokomi na ye na libanda ya pepo Hamad tata mokonzi ayambamaki na Ahmad Bin Hassen kalaka mokambi ya minisele ya mambi boyokani na bikolo bisusu kuna, pe elongo na lisanga lia baye batamboli na ye bakambaki na motalisi elongi ya ekolo Congo demokratiki na Qatar Valérie Lusamba Kabeya. 

Atako sango ekomeli nayino ba panzi sango te, nionso ezali kotalisa ete Félix Tshisekedi ako kutana na moninga moa ye ya mosala kuna o'ekolo Qatar pe masolo ma bango mako tala boyokani pona bikolo biye bibale. 

Mobembo moye ya Felix Antoine Tshisekedi ezali sima ya mibembo mia ye na Turquie, Belgique, Ethiopie pe Angola.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa