Ko kende ya monusco: ekoki kosalema na mokolo moko te "Bintou Keita"

Ko kende ya monusco ezalaki nde masolo ya kalaka mokambi ya monusco, Bintou Keita elongo na ba panzi sango mua zomi na libwa, sanza motoba.

Redaction

20 Sanza motoba 2023 - 13:29
 0
Ko kende ya monusco: ekoki kosalema na mokolo moko te "Bintou Keita"

"Misala ya boye ekoki kosila na mokolo moko te" née maloba ya Bintou Keita pona maniolela ba panzi sango na oyo etali mokolo basengeli ko longwa ekolo congo demokratiki.

Pona Bintou Keita," ko longwa ya monusco na Congo ezali kosalema na malembe zambi esengeli esalema na kimia. Mokambi mapinga casque bleu ya monusco ezali kosala ete ko kende mapinga maye etika pamba te noki te bozangi bokengi boyingela lisusu.

Monusco ezali komilengela pona ko kende sima ya mibu tuku mibale na Congo demokratiki kobunda pona kimia kati ya bikolo Rwanda mpe RDC (Nairobi 1 na 2) uto Rwanda azwa na nzela ya ba M23 mabele ya RDC kasi mokolo ya bango ko kende na bosenga ya bayi eyebani te Patrick Muyaya alaki été mbulamatari pe monusco ba zali komilengela na tina ete esalema na kimia.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.