Bitumbu na moniele ya RDC : « soki ata lisasi moko ekweyi na Goma, toko zongisa », Christophe Lutundula 

Liboso ya masanga ya biloko ya bapaya Christophe Lutundula oyo azali, mokambi mbulamatari molandi atali mambi ya boyokani na bikolo ya bapaya atalisaki kanda ya ekolo Congo demokratiki kotalaka mambi mazali ko salema o'moniele ya RDC. 

Sarah Meta Savu

26 Sanza ya zomi 2023 - 21:56
 0
Bitumbu na moniele ya RDC : « soki ata lisasi moko ekweyi na Goma, toko zongisa », Christophe Lutundula 

« Nazo lobela bino na nkombo ya tata mokonzi pe ya bayi mboka, soki ata lisasi moko ekweyi na Goma ata na mpwasa boyeba ete toko zongisa », elobi Christophe Lutundula. 

Abakisi boye « eza momesano te kono minisele ya boyokani na bikolo ya bapaya abimisa maloba ya boye ». 

Ekolo Congo demokratiki esengi na lisanga ya bikolo ya bapaya bazua mokano ya makasi na oyo etali Rwanda, sima mapinga mabango ko kota na ekolo Congo demokratiki.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa