RDC : Nicolas Kazadi atelemeli mombongo na sima ya liwa ya Cherubim Okende

Liwa ya Cherubim Okende etie makelele mingi. Pona minisele ya mambi ma misolo liboso ya bapalanginisi sango mokolo moa lundi zomi na sambo sanza motoba, bayi opposition bazali ko salela liwa ya molobeli ya bayi mboka lokola mombongo pona ko koma na suka ya manaka ma bango.

Sarah Meta Savu

18 Sanza Sambo 2023 - 20:10
 0
RDC : Nicolas Kazadi atelemeli mombongo na sima ya liwa ya Cherubim Okende

" Tozali na pasi makasi pona oyo ekomi. Kasi oyo ezali mabe eza kosalela yango mombongo pona politiki. Ezali kozanga komemia mowewi pe libota na ye. Ya malamu yako sala ezali ko mikanga ezali ezali tango ya matanga eza tangu yako kota te na ba (ndlr) pe ko fundana " maloba ya Nicolas Kazadi.

Pona Nicolas Kazadi,liwa  ya Cherubim Okende okokani na liwa ya Laurent Désiré Kabila tata mokonzi ya kala ya RDC oyo ba boma ye na batu ya nzinga nzinga na ye,makoki ezali ete liwa ya Chérubin ezala kowuta na moko ya ninga naye ya politiki.

Chérubin Okende, molobeli ya lisanga politiki ensemble pour la république ba bomaki ye mua zomi na misato ya sanza ya sambo tozali na kisasa na tango abungaki pe azalaki ko monana te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa