Félix-Antoine Tshisekedi atiki likanisi lia ko longua na lisanga lia EAC.

Tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi azalaki na masolo elongo na bayi mboka na ekolo Botswana mokolo moa mitano zomi na mibale ya sanza mitano na engumba Gaborone. O'kati ya masolo ma bango tata mokonzi alobi ete abongoli makanisi maye na oyo etali kolongua ya ekolo congo demokratiki na lisanga EAC.

Redaction

13 Sanza ya mitano 2023 - 13:47
 0
Félix-Antoine Tshisekedi atiki likanisi lia ko longua na lisanga lia EAC.

Félix-Antoine Tshisekedi azali nako ndima ya bokoti na lisanga EAC pona ye "bokoti na lisanga EAC ezali mokano moa zuaki ntango Pona konisa malamu" Pona ko komisa pete mombongo na mindelo.

Tata mokonzi atalisaki ete mokano moye mozalaki "pona koyanola bayi mboka baye bazuimi pene pene ya mindelo na moniele ya ekolo esika wapi mombongo ezali makasi" 

Kotalisaka bolamu yako zala o'kati ya lisanga liango Felix Tshisekedi abakisi ete ko kota na lisanga "epesi nzela na bayi mboka kotambola na bikolo binso ya lisanga na kimia na biloko bia bango"

Felix Tshisekedi azali kobika na mabele ya Gaborone engumba mokonzi ya ekolo Botswana uto mua zomi na mibale ya sanza mitano. Mikolo na ye ya ko zala kuna esika eko bakisama mua mukie.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.