RDC : mbulamatari aza na kati ya masolo pona ko tika ba pepo ya RDC eleka na mapata ya etando ya Schengen

Ba pepo ya ba kopani ya ekolo Congo ekoki ko leka na mapata ya etando Schengen. Elobi minisele atali mambi ya transport  moa 16/10. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza ya zomi 2023 - 08:57
 0
RDC : mbulamatari aza na kati ya masolo pona ko tika ba pepo ya RDC eleka na mapata ya etando ya Schengen

Pona Marc Ekila, boyokani boango boko pesa na nzela na ekolo Congo demokratiki yako bimisa mutu na mokanda ya mabe etiama na bayi Union Européenne. 

"Mokambi ya mambi matali pepo azali na masolo elakisi,to zali ko koma mua mikanda na tina nango"

Abakisi " Lelo ekolo Congo demokratiki liboso ya misala ya OACI ya mua 1 kino mua 10/02 ya mobu tozali tobimi na 64,56% "

Na oyo etali Congo Airways minisele alobi ete mbulamatari azali kosala manso masengeli pona ko pesa bayi mboka ba pepo ya malonga ko betaka sete na molayi ya mambi masengeli pona ko zua pepo yango. 

RDC ezali na kokoso ya ba pepo pona ba kopani Naye. Ba pepo nionso ezali lisusu na makoki yako pumbwa te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa