Kisasa : Gentiny Ngobila pe Godé Mpoyi ba bongisi boyokani
Bitumba tumba eko Zala lisusu te pona moyangeli moa engumba mokonzi kisasa PE mokambi ndako ya ba lobeli ya engumba mokonzi kisasa, nzambi bazuyi mokano yako sala kimia.
Na bililingi botamboli na nzela singa interneti, tozali komona bakonzi babale ko pesana mbote elembo ya kimia.
"Kimia esalemi kati ya bingambe bibale. Mokambi ndako ya balobeli Godé Mpoyi pe moyangeli moa engumba kisasa Gentiny Ngobila, soni pona ba nguna ya kisasa, bakonzi babale bako solola mambi manso matali lolenge lako kamba engumba." Maloba ya molobeli moa bayi mboka junior Nembalemba.
Mokambi ndako ya balobeli azalaki ko tuna lolenge nini misolo mia ndako ya moyangeli mozalaki ko salelama na mobu koto ibale zomi na libua. Pona mbala ya liboso mokambi ndako ya balobeli azalaki ko funda moyangeli na moyibi " motema mabe ya ko niokolo balobeli ya bayi mboka".