EPST : Tony Mwaba apekisi milulu ya collation pona kelasi ya maternel

Minisele atali mambi ma biteyelo ya se, Tony Mwaba Kazadi, o'nzela ya lioko mokanda oyo ezuaki mokoloto moa ye mua muambe sanza ya sambo ya mobu koto ibale tuku ibale na isato, apekisi milulu minso mitali collation pona bana na eteyelo ya maternel.

Sarah Meta Savu

11 Sanza Sambo 2023 - 10:20
 0
EPST : Tony Mwaba apekisi milulu ya collation pona kelasi ya maternel

« Tozo mona mvula nionso mabongisi ya milulu etali collation pona bana basilisi kelasi ya maternel,na pekisi yango na Kambi biteyelo binso kosala lolenge boye », Maye to koki ko tanga na mokanda moango.

Abakisi ete milulu miango oyo ekomi momesano ekoki ko tia mbilinga mbilinga na engumba na eleko eye ya bozangi bokengi na ekolo.

Lisusu alobi ete milulu mina mibongisami se pona baye bazo silisa kelasi ya bakolo.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa